1 Corinthians 3

Basali ya bateyi Sango Malamu

1Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola bana mike kati na Klisto. 2Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te, bolingaki kokoka kolia yango te. Ezala sikʼoyo, bokokoka na bino mpe kaka kolia yango te ; 3pamba te, bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali kotambolisama kolanda baposa ya nzoto te ? Boni, bozali kaka kosala lokola ya moto nyonso te ? 4Tango moko azali koloba : “Ngai nazali moto ya Polo”, mpe mosusu azali koloba : “Ngai nazali moto ya Apolosi,” boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonsote ?

5Boni, Apolosi azali nani ? Mpe Polo azali nani ? Bazali kaka basali, oyo na nzela na bango bondimelaki Nzambe, kolanda likabo oyo Nkolo apesaki na moko na moko na bango. 6Ngai nalonaki, mpe Apolosi asopelaki yango mayi, kasi Nzambe nde akolisaki. 7Ezali te moto oyo alonaki to oyo asopaki mayi nde azali na tina, kasi Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina. 8Moto oyo aloni mpe oyo asopeli mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moto na moto akozwa lifuti oyo ekoki na mosala na ye. 9Pamba te, biso tozali basali elongo na Nzambe, mpe bino bozali elanga mpe ndako ya Nzambe.

10Na nzela ya ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki fondasio lokola motongi ya mayele, mpe moto mosusu atongi likolo na yango. Kasi tika ete moto na moto asala keba na ndenge azali kotongela. 11Pamba te, moto moko te akoki kotonga fondasio mosusu, longola kaka oyo esila kotongama : Yesu Klisto. 12Nzoka nde, soki moto asaleli wolo, to palata, to mabanga ya talo, to mabaya, to makasa to mpe matiti mpo na kotonga likolo ya fondasio yango, 13mosala na ye ekomonisama polele. Mokolo ya kosambisama nde ekomonisa yango, pamba te ekozala mokolo ya moto. Moto ekomeka mosala ya moto na moto. 14Soki mosala ya moto oyo atongaki likolo ya fondasio eziki te, moto yango akozwa lifuti. 15Kasi soki esili kozika, akozwa eloko te : ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto.

16Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino ? 17Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye, pamba te Tempelo na Ye ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.

18Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya na mokili oyo, asengeli kokoma lokola zoba mpo ete akoma moto ya bwanya. 19Pamba te, bwanya ya mokili oyo ezali bozola na miso ya Nzambe. Lokola ekomama : “Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo
ya mayele na bango ya mabe,”

20mpe lisusu :

“Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezalaka tina te.”
21Yango wana, tika ete moto moko te aluka lokumu kati na bato. Pamba te, nyonso ezali ya bino : 22ezala Polo, to Apolosi, to Piere, to mokili, to bomoi, to kufa, to tango ya lelo, to tango oyo ekoya : nyonso ezali ya bino, 23kasi bino bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB